Maladi
Bacillus Calmette-Guérin (BCG) na mwana nayo. Buku oyo ezali likolo ya nkisi ya Bacillus Calmette-Guérin, mobateli bapesaka mpo mwana nayo azua tuberculose (TB) te.
Mobateli ya Bacillus Calmette-Guérin ezali na biloko oyo epesaka maladi ya tuberculose (TB) kasi basibalongoli makasi na yango. Lokola basibalongoli makasi na yango, ekoki kosala mabe lisusu te, kasi ekosalisa nzoto ya mwana ekolisa komibatela yango moko (immunite), mpo ata soki akutani na TB, akozua yango lisusu te.
Mpona nini mwana na ngai bapesa ye Bacillus Calmette-Guérin?
Na
Ingɛlɛ́tɛlɛ, lokola na bamboka misusu, BCG (Bacillus Calmette-Guérin) bapesaka na bana baye bazali mpene ya bato oyo bakoki kozala na TB. Wana ezali mpo bana yango bavandaka bisika ya bato mingi ya TB, ezala baboti to bankoko bauti bisika bato mingi babelaka TB. Na mokuse mbala mingi bana oyo bavandaka na cite ya masikini. Mobateli yango bapesaka na tango mwana abotami kasi bakopesaka mpe na tango nyonso oyo ebongi.
Mwana bapesaka ye mobateli ndenge nini?
Mbala mingi mwana nayo bakobeta ye tonga ya BCG na loboko ya mwasi mpene na lipeka.
Nkisi yango mpe ekoki kosala mabe?
Tango ozui tonga, mbala moko esika yango ekovimba. Wana elakisaka te babeti tonga ndenge ebongi.
Sima ya mposo 2 kino 6 wuta kozua tonga, elembo ekomonana. Ekosua mpo na mikolo mike, kasi ebikaka noki soki okangi yango te. Ekoki kotika elembo moke.
Tango mosusu mwana akozala na pota esika ya tonga. Soki wana ezali kobimisa mayi, kanga yango na elamba ekauki ti ekobanda kolakisa kobika. Kasi kokanga yango na
sparadrap te. Pota yango ekoki kosala mwa sanza mpo ebanda kobika
Soki epesi yo mawa na motema, to omoni lokola pota ezali kobakisama, kende epayi ya dokotolo.
Mpona nini mwana na ngai azua mobateli ya BCG te?
Lokola na mibateli nyonso, tango mususu ebongi te kopesa mwana BCG. Tina yango oyo:
- Soki mwana azali na nzoto ya moto (fɛ́fɛlɛ)
- Soki bazali kopesa ye nkisi ya kansele to nkisi nyonso oyo esukisaka makasi ya nzoto
- Azali na Sida, to
- Azali kobela bisika mingi na loposo eczema.
Ebongi nayebaka nini lisusu?
Mwana nayo akoki kobanda nkisi ya mibateli ya
diphtherie,
hemophilie,
grippe,
meningite,
pertuse, paralyse na maladie ekotaka na pota
tetanus soki azali na sanza 2 ekopekisa te kozua BCG. Kasi tala te bankisi misusu wana babeti ye te na loboko oyo babetaki ye na BCG kino sima ya sanza 3, soki te, esika yango ekoki kovimba. Mpe tiya sango ya kozua BCG na buku ya mwana
mpo esalisa na sima.
Bamboka oyo ezalaka na babeli mingi ya TB
Bamboka oyo tokoma na nse ezalaka na bato mingi ya TB. Soki eyano na yo ya mituni na biso ezali 'oui' 'íyo', sala noki opesa mwana nayo azua BCG soki azui naino te.
- Yo, bandeko nayo to tata ya mwana na yo awuti na mboka moko nakati ya oyo totangi na nse?
- Yo na mwana nayo bokokende kovanda koleka sanza moko to bokotambola mingi na mboka nakati ya oyo totangi na nse?
- Nakati ya ndako nayo, to mpene nayo, azali moto oyo akozala mpene na mwana nayo na tango mingi, oyo azali na TB to azalaki na yango kala, to awuti na mboka moko nakati ya oyo to tangi?
Aljeria Kamerun Sǎo Tomé na Principe Afganistani
Al Mamlaká al-Maghribiya (Maroc) Kenya Sénégal Djibuti
Angóla Komori Seyshel India
Bê Afríka (Santrafríka) Kɔ́ngɔ-Brazzaville Sidafrika Omani
Bénin Kɔ́ngɔ-Kinshasa Sierra Leone
Botswana Kotdivuar (Cote d'Ivoire) Somalie
Burkina Faso Liberia Swaziland
Burundi Libîya Tshad
Ejipti Malawi Togo
Ekwateli Mali Tunisia
Elitré Moritani Uganda
Etiopi Mozambiki Zambia
Gabon Namibia Zimbabwe
Gambia Niger
Ghana Nijeria
Gine Rwanda
Gine-Bisau
Gine-Ekwatoliáli (Mambénga) San Salvador
Sango ya kobakisa
Mpo ozua basango misusu na ndenge ya komibatela, bandeko nayo na baninga buzua TB
te, okokiko betela:
- dokotolo nayo
- midwife / femme sage (THIS IS ENGLISH/FRENCH, PLEASE TRANSLATE IF YOU CAN)
- nurse / infirmière (THIS IS ENGLISH/FRENCH, PLEASE TRANSLATE IF YOU CAN)
Bacillus Calmette-Guérin | Bacillus Calmette-Guérin | BCG | BCG-rokote | Bacille de Calmette et Guérin | BCG | BCG-vaccin | BCG | 卡介苗